Текст песни Adorons L'eternel — Mokonzi Merci

image_pdfimage_print

Natatola kombo ya lobiko
Bipai biyano ngai bikowuta
Natiola na mbonge ya mayi ya bomoi, Yesu
Nasimbama na oyo aleki nionso, Yesu
Nazala esengo na yo mpo na seko

Oyaka na elikya bipai kondima esuki, Yesu
Yo nde moyi ya tongo ekimisaka butu na ngai
Bipai ezali Yo nde bisika obongisi po na ngai
Mpo ete oyo Yo ozali nde mpe ngai nazala
Mokonzi merçi mpo na lobiko
Mpe bomoi ya seko opesi na bangumbameli na Yo

Bilaka na Nzambe bikomi bozui na ngai po na Yo
Esengo na ngai nayeba ete Ozali Nkolo na ngai
Osopi bolingo na Yo na motema na ngai, muana Nzambe
Ofungoli bikuke ya bosantu bwa Yo mpo na ngai
Osangisi Bonzambe na bomoto bwa ngai, oyo ngolu
Mokonzi merçi mpo na lobiko
Mpe bomoi ya seko opesi na bangumbameli na Yo

Mokonzi merçi obengi ngai na kombo na Yo, mosantu
Yo obengi ngai moninga na Yo nayeba nionso okosala
Opesi ngai loboko na Yo nasimba mpo nabunga te
Mokonzi merçi mpo na lobiko
Mpe bomoi ya seko opesi na bangumbameli na Yo

Оцените текст
( Пока оценок нет )

На данной странице вы найдете слова и текст песни Adorons L'eternel — Mokonzi Merci. Здесь можно прочитать, а также скачать текст песни и распечатать его.

Поделитесь с друзьями
text-pesen.ru