Текст песни Aime Nkanu — Soki Yo Te

image_pdfimage_print

Ngai oyo ngai oyo
Ngai oyo soki yo te
Mbele nakoma nani?
Mbele nasuka wapi?

Na mbeto ya lopitalo
Baninga bandeko bakimi nga
Liwa ekomami na ekuke
Ya bomoyi na nga
Mbele nakoma nani?
Mbele nasuka wapi?
Esika mayele ya bato esuki ya yo ebandi
Yango natatoli
Yesu y’ozali Nzambe

Na libota ya mpasi
Kelasi esilaki te
Nionso na nga ya mpasi
Ndele na nga molili
Mbele nakoma nani?
Mbele nasuka wapi?
Kasi y’opesi nga tina
Pe nga namoni muinda
Yango natatoli
Yesu y’ozali Nzambe

Na kati ya bisengo ya mokili
Nabungaki nzela
Natiaki kondima na ngai na mbongo
Na ba ndako ya molili
Mbele nakoma nani?
Mbele nasuka wapi?
Obengi nga osukoli nga
Na makila na yo

CH: Yango natatoli, Yesu y’ozali Nzambe
S: Osalaka manso na tango na yo tika nakumisa yo
CH: Yango natatoli, Yesu y’ozali Nzambe
S: Baseka nga batiola nga o changea histoire ya vie na nga
CH: Yango natatoli, Yesu y’ozali Nzambe
S: Banguna na nga batikali na soni
CH: Yango natatoli, Yesu y’ozali Nzambe
S: Olokotaka na fulu, osukoli opesi tina
CH: Yango natatoli, Yesu y’ozali Nzambe
S: Yango natatoli, Yesu y’ozali Nzambe

Оцените текст
( Пока оценок нет )

На данной странице вы найдете слова и текст песни Aime Nkanu — Soki Yo Te. Здесь можно прочитать, а также скачать текст песни и распечатать его.

Поделитесь с друзьями
text-pesen.ru