Текст песни Alain Moloto — Kimia Na Motema

image_pdfimage_print

Wuta nga nakoma ko sambela
Wuta nga nakoma mochristu
Kimia na motema
Bomoyi e changea
Nakoma kotalela kaka Masiya

Na Nkombo na Yesu
Natika misala ya mabé
Na Nkombo na Yesu
Nakoma moto ya ko banga masumu
Na Nkombo na Yesu
Kimia na motema

Wuta nga natika masumu
Wuta nga na kangama na Nzambe
Kimia na motema
Na kolemba te
Elykia na nga sé na Yesu muana na Nzambe
Na Nkombo na Yesu
Milimo ya mbido mi ko kima
Na Nkombo na Yesu
Moto ya lola mo ko kita
Na NKombo na Yesu
Kimia na motema

Yesu kimia ya bana Nzambe
Nkolo totielaka motema
Oh Ye to sanjolaka
Liloba na Nzambe
Ye nde apesaka bomoyi ya seko
Mokonzi ya eclésia
Makasi na nga, mowumbu na Ye
Lolendo na nga
Apesa nga ngolu ya ko yeba Nzambe pe kosala Ye
Kimia na motema

Yesu Elonga na nga mosantu
Likonzi ya bomoyi na nga
Ah eh nako yembela
Moyi ya bosembo
Nionso asalaka yango nde esengeli
Na Nkombo na Yesu
Nakoma mosantu ya Nzambe
Elombe ya bwania
Maloba na Ye nde ebongi to yoka
Na Nkombo na Yesu
Kimia na motema

Yesu nguya na nga mochristu
Nsomi ya bokonzi na Nzambe
Oh Ye nako Kumisa
Lipa na bomoyi
A ndima ko kufa likolo na nga
Muninga malamu
Nakoma efandelo na Ye
Lisolo ya motema
Atondisa nkembo ya Nzambe na bomoyi na nga
Libanga ya motuya

Oh kimia na motema na nga
(Kimia na motema)
Oh Kimia na motema na nga
(Kimia na motema)
Yesu Nsomi na lola, Likonzi na moto
(Kimia na motema)
Engambe mobali Moninga malamu
(Kimia na motema)
Na Nkombo na Yesu nakoma ya Nzambe
(Kimia na motema)
Yesu apetola nga nakoma nde mosantu
(Kimia na motema)
Oh kimia na motema na nga
(Kimia na nga)
Oh kimia na motema na nga
(Kimia na motema)

Ata mokili etelemi
Eboyi kokende, ekomi na suka
Nayebi Nkolo ozali ebombamelo na nga mosantu
Po ete nionso ezali, ezalisami kaka na Yo
Mokeli na ko kamwa nionso esimbami na Yo

Nkolo, elonga na nga eza na Yo
Yesu, na Yo nde nabengi Nzambe Tata
Yo nde mobateli ba mpate ya Nzambe
Yesu, na Yo nde na bengami mosantu

Nkolo lobiko ya bayé boko ganga
Yesu, na Yo nde na bengami mokitani ya Nzambe na bomoyi.
Mosungi na nga ezali kosala, na banga nini?
Azali kosala, na banga nini?

Ata makasi esili nga po ete nzela ekomi minioko
Nayebi oko pesa nga loboko nga nasimba tokende
Mosala oyo obandi okomisaka kino na suka
Mosungi na nga azali na nguya yako komisa nga

Nkolo, elonga na nga eza na Yo
Yesu, na Yo nde nabengi Nzambe Tata
Yo nde mobateli ba mpate ya Nzambe
Yesu, na Yo nde na bengami mosantu

Nkolo lobiko ya bayé boko ganga
Yesu, na Yo nde na bengami mokitani ya Nzambe na bomoyi.
Mosungi na nga ezali kosala, na banga nini?
Azali kosala, na banga nini?

Nkolo atelemi nde na nkembo
Bikelamu binso mi fukami
Masiya na nga eza na bomoyi
Nga na ningana tina nini?
Ata mabele efongwami
Bipayi na telemi na banga te
Oyo asimbi nga aza makasi
Nkombo na Ye Yesu Christu
Ata mokili eboyi ko ndima
Oyo olobi nde yango eko salema po na nga
Mosungi na nga azali kosala
Na banga nini?
Azali kosala na banga nini?

Nkolo atelemi nde na nkembo
Bikelamu binso mi fukami
Masiya na nga eza na bomoyi
Nga na ningana tina nini?
Ata mabele efongwami
Bipayi na telemi na banga te
Oyo asimbi nga aza makasi
Nkombo na Ye Yesu Christu
Ata mokili eboyi ko ndima
Oyo olobi nde yango eko salema po na nga
Mosungi na nga azali kosala
Na banga nini?
Azali kosala na banga nini?

Ata makasi esili nga po ete nzela ekomi minioko
Nayebi oko pesa nga loboko nga nasimba tokende
Mosala oyo obandi okomisaka kino na suka
Mosungi na nga azali na nguya yako komisa nga

Nkolo, elonga na nga eza na Yo
Yesu, na Yo nde nabengi Nzambe Tata
Yo nde mobateli ba mpate ya Nzambe
Yesu, na Yo nde na bengami mosantu

Nkolo lobiko ya bayé boko ganga
Yesu, na Yo nde na bengami mokitani ya Nzambe na bomoyi.
Mosungi na nga ezali kosala, na banga nini?
Azali kosala, na banga nini?

Mosungi na nga azali kosala na banga nini?
(Mosungi na nga azali kosala na banga nini?
Ata mokili ekomi pasi, na lenga nini?
(Azali kosala, na banga nini?)
Ata ba nguna bakoti mboka, nga nako lenga te
(Mosungi na nga azali kosala na banga nini?)
Ata na nzela ya référendum, mboka oyo eko bonga
(Azali kosala na banga nini?)
Mosungi ya Congo eza na bomoyi, kimia na mboka oyo
(Mosungi na nga azali kosala, na banga nini?)

Оцените текст
( Пока оценок нет )

На данной странице вы найдете слова и текст песни Alain Moloto — Kimia Na Motema. Здесь можно прочитать, а также скачать текст песни и распечатать его.

Поделитесь с друзьями
text-pesen.ru