Текст песни Alain Moloto — Mwana Na Mpate

image_pdfimage_print

Okokisa makambo nionso na ekulusu,
Pona tina na ngai eh, oh Yesu
Yaya okokisa makambo nionso na ekulusu,
Pona ntina na ngai eh, oh Yesu
Nzambe monène alati mposso ya bomoto,
Pona ntina na ngai eh, oh Yesu
Nkolo wolo palata abotami pène ya bibwele,
Pona ntina na ngai eh, oh Yesu
L’avocat auprès du père azangi eloko yako loba,
Pona ntina na ngai eh, oh Yesu
Monkozi ya mapinga ba beti ye na ba soldats,
Pona ntina na ngai eh, oh Yesu
Ye ko le roi des rois ba latisi ye ekoti ya nzube,
Pona ntina na ngai eh, oh Yesu
Ah ah ah yesu mwana na mpate obongi na lokumu
Ah ah ah Yesu mwana na mpate molongi ya balongi
Okokisa makambo nionso na ekulusu,
Pona ntina na ngai eh, oh Yesu
O ndima liwa ya somo na ekulusu,
Pona ntina na ngai eh, oh yesu
Mokeli na nionso akomi mosali ya mabaya,
Pona ntina na ngai eh, oh Yesu
Nzambe na nkembo ba sambisi ye na ekelamu,
Pona ntina na ngai eh, oh Yesu
Nkino a ganga, na ekulusu toutes est accomplies,
Pona ntina na ngai eh, oh Yesu
Elie elie la basabatani Yesu aleli ngo,
Pona ntina na ngai eh, oh Yesu
Ah ah ah Yesu mwana na mpate obongi na lokumu
Ah ah ah Yesu mwana na mpate molongi ya ba longi
Yango na yembi mwana na mpate
Ref: Mwana na mpate, mwana na mpate, mwana na mpate
Azui bisika na ngai ya mbeka liboso na Tata, Mwana na mpateh
Bisika awuti ba moni te, nzoka nde awuti likolo
Apesami bisika ya liwa ya bato Yesu masiya ngohh
Yesu eh elonga na nga, Elonga na nga ah
Yesu eh elonga na nga, Yesu elonga na nga oh, Yesu elonga na nga
To kozonga lisusu sima te eh, Yesu eh elonga na nga
Congo ezali mboka ya elaka ah, Yesu eh elonga na nga
Ngonga ya nzambe ebeti na mbok’oyo, Yesu eh elonga na nga
Molongi akoti esengeli to longa, Yesu eh elonga na nga
Ils l’ont vecu à cause du sang de l’agneau oh, Yesu eh elonga na nga
Il les a livré publiquement au regard de nous
Mwana na mpate, mpate eh, mpate na nzambe eh, mpate eh, mpate na nzambe
Sujet ya masajonli na nga, elamba na nga ya nkembo, esengo ya motema na nga, likuke ekotisi na nkembo,
Mpate na nzambe azui bisika ya passi ya ba ndimi, apetoli mitema abimisi bisso bipene ya papa, tokomi ba santu pona ye
Yo nde, yo nde, yo nde, mokonzi ya bakonzi,
Yo nde, yo nde, yo nde elikia ya motema
Yo nde, yo nde, yo nde mo pangusi pinjoli
Yo nde, yo nde, yo nde elombe mobali
Yo nde, yo nde, yo nde elikia ya motema
Yo nde, yo nde, yo nde elingi ya kozala yo nde.

Оцените текст
( Пока оценок нет )

На данной странице вы найдете слова и текст песни Alain Moloto — Mwana Na Mpate. Здесь можно прочитать, а также скачать текст песни и распечатать его.

Поделитесь с друзьями
text-pesen.ru